Maloba ya ebandeli ya WIC na bisenga naye ya ntina (Lingala)

WIC eza manaka ya bakonzi ya mboka pona batu ya zemi, batu ya komelisa bana mabele, bana, to bana oyo baza nase ya mbula mitano oyo mabota na bango baza na mosolo ya mukie to pe baza na mosolo te to bamikomisa na Maine Care, TANF, GA, to SNAP (Kombo ya mikanda ya bileyi). Oyo eza manaka ya ndenge na ndenge oyo ekambami naba organization ya ndenge na ndenge to mpe ekambami na ba biro ya bakambi ya mboka. Mikanda bapesaki esika libota efandaka, banani bazali ba ndeko na libota, makambu etali bozoui nde esengeli pona kokota na WIC. Basali ya WIC bazotangisa baboti kolia malamu na komelisa mabele. Bileyi oyo ekoki kosomboma na mbongo ya WIC etalisami na monene na kombo. Esengeli kosomba bileyi ya WIC na kati ya mikolo ntuku misato ko banda mokolo mbongo ebimaki, mpe soki libota esombi biloko te, mbongo ekosila mutuya. Soki mosangani aliaka bileyi misusu oyo WIC epesaka te, akoki koba balola yango te. Bileyi nyoso ya WIC oyo endimami, etangemi na site internet ya Maine WIC mpe na application “WIC Shopper”pona batu ya telephone ya motuya. Bamiliki mosusu ya bana oyo eza na ntina mingi, oyo baboti mosusu babengaka “baby milk”, esengaka ordonnance ya monganga ya bana. Pona ko koba na kozwa mbongo ya bileyi kowuta na WIC, esengeli baboti baluka tango ya kokota na elaka, mpe ko kende na elaka wana. Na tango ya mapanzani, ba elaka mingi ebandaki kosalema na telefone, kobanda sanza ya sambo 2022, bilaka mingi ekozala elongo na mutu, loba kaka soki na libota nayo mutu azobela, to biro ya WIC esengeli ekangama pona likambo ya bokono ya Covid. Basali ya WIC bamekaka kilo, molai, nivo ya makila na kotuna baboti mituna etali bileyi ya libota na kolongono ya nzoto. Mbongo eko tiama na carte na mokolo ya rendez-vous. Cate ya WIC esengeli e pelisama mpe na kotia code oyo baboti bako bosana yango te. WIC basalelaka carte mosusu oyo ezali carte ya SNAP te. Basalelaka yango lokola carte ya credi. Soki mosali ya WIC ameki kosomba bileyi ya mabe to biloko ebele, bakoki koboyela ye na esika yakoteka, yango wana esengeli koyeba bileyi ya WIC oyo endimami to mpe kotalaka na telefone tangu ozali kosomba. Mbongo ya WIC ekoki kosomba biloko nyoso te, longola kaka bileyi oyo eyebani na molongo ya bileyi ya WIC. Ba nzando mingi ya minene bandimaka WIC. Tuna basali ya WIC wenze nini endimaka carte ya WIC bisika ofandi to mpe to tala na site internet ya Maine WIC.
Back to Top